Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 7:10 - Mokanda na Bomoi

10 Epai ya bato oyo babala, nazali kopesa mitindo, ngai te kasi Nkolo : Mwasi asengeli te kokabwana na mobali na ye ;

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 7:10
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi bino lisanga ya Isalaele, bokosi Ngai lokola mwasi oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, » elobi Yawe.


Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.


Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye : — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala ?


Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo, mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongoli na libala asali mpe ekobo.


kasi soki akabwani na mobali na ye, asengeli kobala lisusu te to asengeli koyokana na mobali na ye ; mpe mobali asengeli te kobengana mwasi na ye na libala.


Epai ya bato mosusu, nazali koloba, Nkolo te kasi ngai : Soki ndeko mobali Moklisto abali mwasi oyo azali mondimi te, bongo mwasi yango andimi kowumela elongo na ye, tika ete abengana mwasi yango te ;


Kasi soki ye oyo azali mondimi te alingi koboma libala, tika ete aboma na ye ! Na likambo ya boye, ndeko mobali to ndeko mwasi azali ya kokangama te. Nzambe abenga bino mpo na kobika bomoi kati na kimia.


Mpo na oyo etali baseka, nazali na mobeko te kowuta na Nkolo ; kasi na mawa ya Nkolo, lokola moto oyo bakoki kotiela motema, nazali kopesa likanisi na ngai.


Nzokande, na makanisi na ngai, akozala mwasi ya esengo koleka soki atikali ndenge azali ; mpe nakanisi ete, ngai mpe, nazali na Molimo ya Nzambe.


Awa nazali koloba bongo, nazali na ngai kaka kopesa likanisi, kasi mobeko te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ