1 Bakolinto 6:9 - Mokanda na Bomoi9 Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali, အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Kasi nazali nde kokomela bino sik’oyo mpo na koyebisa bino ete bozala lisanga moko te na moto oyo amilobelaka ete azali ndeko Moklisto, kasi atambolaka na bomoi ya pite to azali na lokoso ya mbongo to azali mosambeli bikeko to mofingi bato to molangwi masanga to moyibi. Bosengeli kutu te kolia mesa moko elongo na moto ya lolenge oyo.