Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 6:8 - Mokanda na Bomoi

8 Nzokande, bino, bokosaka mpe bosalaka mabe ; mpe bosalaka yango epai ya bandeko na bino.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 6:8
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo.


Soki baluli bilanga ya moto, bazwaka yango na makasi ; soki baluli ndako ya moto, babotolaka yango ; bakangaka mokolo ndako mpe biloko na ye ya ndako mpe babotolaka moto libula na ye.


« Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.


Kasi nkolo elanga azongiselaki moko kati na bango : « Moninga na ngai, nasali yo mabe te ! Boni, toyokanaki te ete osala mpo na lifuti ya mbongo moko ya ebende ?


Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »


Moto oyo asalaka na ndenge ya mabe akozwa lifuti oyo ebongi mpo na misala na ye ya mabe, pamba te Nzambe aponaka bilongi te.


asengeli mpe te kokosa to kosala ndeko na ye mabe kati na makambo oyo etali bonzoto, pamba te Nkolo akopesa etumbu na bato nyonso oyo basalaka mabe ya lolenge wana, ndenge toyebisaki mpe tokebisaki bino liboso.


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ