7 Solo, awa bozali kofundana bino na bino, boyeba ete bosili komikweyisa. Mpo na nini bondimaka te ete basala bino mabe ? Mpo na nini bondimaka te ete bakosa bino ?
Mitema na bango etondi na mabe mpe basengeli sik’oyo kofuta masumu na bango. Ye moko Yawe akokaba bitumbelo na bango mpe akopanza mabanga na bango ya bule.
Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.