5 Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni ! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye ?
Bozongela makanisi ya malamu na ndenge ekoki mpe botika kosala masumu, pamba te bato mosusu kati na bino bayebi Nzambe te ; nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni.
Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya.
Soki ndeko moko kati na bino azwi ndeko mosusu likambo, mpo na nini akendaka kofunda yango epai ya Bapagano, na esika ete akende kofunda epai ya basantu ?
Soki moko kati na bino azangi bwanya, tika ete asenga yango epai ya Nzambe oyo akopesa ye yango ; pamba te Nzambe apesaka moto nyonso na motema malamu mpe na kopamela te.