18 Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.
Yango wana, Nzambe akabaki bango kati na baposa mabe ya mitema na bango mpe na misala ya bosoto, mpo ete basambwisa banzoto na bango moko, na nzela ya moko to ya mosusu.
Boyebi te ete bato mabe bakokota te na Bokonzi ya Nzambe ? Bomikosa te : bato na pite, basambeli bikeko, bato na bikobo, bato oyo balula makambo ya soni, mibali oyo basangisaka nzoto na mibali,
Solo, nazali kobanga lisusu ete, tango nakoya lisusu epai na bino, Nzambe ayokisa ngai soni liboso na bino, mpe ete nalela mpo na bato ebele oyo basalaki masumu liboso kasi babongwani te na misala na bango ya mbindo, na kindumba mpe na ekobo oyo basalaka.
Boye, boboma nyonso oyo, kati na bomoi na bino, ezali ya mokili : pite, bosoto, baposa ya mabe, bilulela mpe lokoso ya mbongo, pamba te lokoso ya mbongo ezali ndenge moko na kosambela bikeko.
Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.