Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 6:15 - Mokanda na Bomoi

15 Boyebi te ete banzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto ? Boni, nakoki kozwa biteni ya nzoto ya Klisto mpo na kokomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba ? Ata moke te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 6:15
25 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi Jozefi alobaki : — Nakoki kosala likambo ya boye te ! Kaka moto oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye nde akozala mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bozonga na kimia epai ya tata na bino.


Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu. Tango bato bayokaki bongo, balobaki : — Te, ekoki kosalema te !


ndenge wana mpe tozali nzoto moko kati na Klisto atako tozali ebele, mpe moko na moko kati na biso azalaka eteni ya nyonso mosusu.


Boni, tobomi Mobeko likolo ya kondima ? Soki moke te ! Tozali kutu kolendisa yango.


Te, ezali bongo te ! Soki ezalaki bongo, ndenge nini Nzambe akokaki kosambisa mokili ?


Boye toloba nini ? Tokoba kosala masumu mpo ete tozali na se ya bokonzi ya Mobeko te kasi na se ya ngolu ? Soki moke te !


Soki moke te ! Biso oyo tosila kokufa mpo na lisumu, ndenge nini tozongela lisusu kotambola kati na masumu ?


Boni, eloko ya malamu ekoki solo komemela ngai kufa ? Soki moke te ! Nzokande, mpo ete lisumu eyebana ete ezali lisumu, mpe mpo ete elakisa mabe na yango na nzela ya mitindo, esalelaki eloko oyo ezali malamu mpo ete lisumu yango epesa ngai kufa.


Boye toloba nini ? Mobeko ekomi nde lisumu ? Soki moke te ! Soki Mobeko ezalaki te, nalingaki mpe koyeba lisumu te. Pamba te soki Mobeko elobaki te : « Okolulaka te, » nalingaki mpe koyeba te soki kolula ezali penza nini.


Nzokande, nalingi boyeba ete Klisto azali Mokonzi ya mobali nyonso, mobali azali mokonzi ya mwasi, mpe Nzambe azali Mokonzi ya Klisto.


Nzokande bino, bozali nzoto ya Klisto, mpe moko na moko kati na bino azali eteni ya nzoto yango ya Klisto.


« bilei esalema mpo na libumu, mpe libumu esalema mpo na bilei, » nzokande ezali na mokolo oyo Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalema te mpo na pite, nzoto ezali nde mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto.


Kasi moto oyo asangani na Nkolo azali moko na Ye kati na Molimo.


Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe ? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te ?


Boyebi te ete tokosambisa ba-anjelu ? Bongo mpo na nini te makambo ya bomoi oyo ?


Kasi soki, wana tozali koluka kokoma sembo kati na Klisto, emonani lisusu ete biso moko Bayuda tozali mpe basumuki lokola Bapagano, boni, elingi koloba ete Klisto azali kotombola masumu ? Ata moke te !


Boni, Mobeko eyaki mpo na kotelemela bilaka ya Nzambe ? Ata moke te ! Soki mobeko moko epesamaki, mobeko oyo ezali na makoki ya kopesa bato bomoi, bato balingaki penza kokoma sembo na nzela ya mobeko yango.


Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.


mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu.


Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango.


baboyaka kokangama na Klisto oyo azali Mokonzi, Moto. Ezali Klisto nde asalaka ete nzoto mobimba ekola malamu kolanda mokano ya Nzambe mpe ekangana na nzela ya misisa mpe misuni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ