Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 6:13 - Mokanda na Bomoi

13 « bilei esalema mpo na libumu, mpe libumu esalema mpo na bilei, » nzokande ezali na mokolo oyo Nzambe akoboma nyonso mibale. Nzoto esalema te mpo na pite, nzoto ezali nde mpo na Nkolo, mpe Nkolo azali mpo na nzoto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 6:13
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo ?


Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo ; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.


Pamba te ekendaka te na motema na ye, kasi ekendaka nde na libumu na ye ; mpe na sima, ekendaka na zongo. Na maloba oyo, Yesu atatolaki ete bilei nyonso ezali peto.


Bosalaka te mpo na bilei oyo ebebaka, kasi bosalaka mpo na bilei oyo ewumelaka mpo na bomoi ya seko, bilei oyo Mwana na Moto akopesa bino ; pamba te ezali Ye nde Nzambe Tata abeta kashe.


Bakoko na bino baliaki mana kati na esobe mpe bakufaki,


Bandeko, mpo na mawa oyo Nzambe atalisi biso, nazali kosenga na bino ete bokabaka banzoto na bino epai ya Nzambe lokola mbeka ya bomoi, ya bule mpe esepelisaka Nzambe. Ekozala mpo na bino losambo ya solo kolanda ndenge esengeli.


Pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali te likambo ya kolia to ya komela, kasi ezali nde likambo ya bosembo, ya kimia mpe ya esengo kati na Molimo Mosantu.


Yango wana, tika ete lisumu ezala lisusu na bokonzi te kati na banzoto na bino, oyo ekokufa ; mpe bosengeli lisusu te kotosa baposa na yango ya mabe.


Ndenge wana mpe mpo na bino bandeko na ngai : bosila mpe kokufa mpo na Mobeko na nzela ya nzoto ya Klisto mpo ete bokoma bato ya moto mosusu, ya Ye oyo asekwaki kati na bakufi, mpo ete tobota bambuma mpo na Nzambe.


Boni, boyebi te ete bozali Tempelo ya Nzambe, mpe ete Molimo ya Nzambe avandaka kati na bino ?


Boyebi te ete banzoto na bino ezali biteni ya nzoto ya Klisto ? Boni, nakoki kozwa biteni ya nzoto ya Klisto mpo na kokomisa yango biteni ya nzoto ya mwasi ya ndumba ? Ata moke te !


Boyebi te ete nzoto na bino ezali Tempelo ya Molimo Mosantu oyo azali kati na bino, oyo bozwaki kowuta na Nzambe ? Mpe boyebi te ete bozali ya bino moko te ?


Mpo na bino, natondi na zuwa kowuta na Nzambe. Nabalisaki bino na mobali moko kaka, Ye nde Klisto, lokola elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali peto.


Akufaki mpo na bato nyonso mpo ete ba-oyo bazali na bomoi bazala lisusu na bomoi te mpo na bango moko, kasi mpo na Ye oyo akufaki mpe asekwaki mpo na bango.


Bato oyo bazali kati na Yesu-Klisto babaka na ekulusu bomoto na bango elongo na baposa mpe bilulela na yango.


Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ