Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 6:11 - Mokanda na Bomoi

11 Mpe bozalaki ndenge wana, bato mosusu kati na bino. Kasi basukolaki bino, babulisaki bino mpe bakomisaki bino bato ya sembo, na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto mpe na nzela ya Molimo ya Nzambe na biso.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 6:11
52 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Eyembamaki tango mosakoli Natan akomaki epai ya Davidi sima na ye kosala ekobo elongo na Batisheba.


Solo, nabotamaki kati na lisumu ; wuta na libumu ya mama na ngai, nazali mosumuki.


Ezali na bato oyo bamimonaka peto na miso na bango moko, nzokande bamipetoli na mbindo na bango te.


Bomisukola mpe bomipetola, bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai ! Botika kosala mabe !


Ezali kati na Yawe nde bato nyonso oyo bazali bakitani ya Isalaele bakokoma bato ya sembo mpe bakozwa lokumu.


Sima na pasi ya molimo na ye, akomona pole ya bomoi mpe posa na ye ekokokisama. Na nzela ya boyebi na ye, Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele mpe akomema masumu na bango.


Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ?


Nakobwakela bino mayi ya peto, mpe bokokoma peto ; nakopetola bino na mbindo na bino nyonso mpe na mbindo ya banzambe na bino nyonso ya bikeko.


Nzokande, soki na ngonga ya kotala malamu ndako sima na kopakola yango mabele, Nganga-Nzambe amoni te kobima ya litono, wana akoloba ete ndako yango ezali peto, pamba te mbindo na yango esili kolongwa.


Moyize amemaki Aron elongo na bana na ye ya mibali liboso mpe asukolaki bango na mayi.


Alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »


Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.


Yesu alobaki na ye : — Moto oyo awuti komisukola nzoto azali penza peto ; azali kaka na posa ya kosukola makolo na ye. Nzokande bino, bozali peto ; kasi bino nyonso te.


Kasi Petelo alobaki na Yesu : — Te ! Osengeli te kosukola ngai makolo ! Yesu azongiselaki ye : — Soki nasukoli yo makolo te, okozala lisusu te na libula elongo na Ngai.


pamba te anjelu moko na Nkolo azalaki koya tango na tango na liziba yango mpo na koningisa mayi. Soki mayi eningani, moto oyo azalaki kokita moto ya liboso kati na liziba azalaki kobika ata soki pasi na ye ezali ndenge nini.]


Ezali mpe na nzela ya Yesu nde moto nyonso oyo andimi akomi sembo.


Mpo na nini ozali kolekisa tango ? Telema, zwa libatisi mpe belela Kombo ya Nkolo mpo ete opetolama na masumu na yo. »


mpo ete ofungola bango miso, olongola bango na molili mpe omema bango na pole ; mpo ete olongola bango na se ya bokonzi ya Satana mpe omema bango epai ya Nzambe, na tina ete bazwa bolimbisi ya masumu mpe libula kati na bato oyo babulisama na nzela ya kondima kati na Ngai. »


mpe bato nyonso bakomi bato ya sembo na ofele, na ngolu na Ye, na nzela ya lisiko kati na Yesu-Klisto.


Nzokande, soki moto asali mosala te, kasi andimeli Nzambe oyo atangaka bato ya masumu lokola bato ya sembo, kondima na ye ekokomisa ye moto ya sembo.


Yango wana, lokola tokomi bato ya sembo na nzela ya kondima, tozali na kimia elongo na Nzambe na nzela ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto


Lokola tokomi sik’oyo bato ya sembo na nzela ya makila na Ye, Klisto akobikisa biso mpe na kanda ya Nzambe.


Mpe ba-oyo abongisa wuta kala, abenga mpe bango ; ba-oyo abenga, akomisa bango bato ya sembo ; mpe ba-oyo akomisa bato ya sembo, apesa bango mpe nkembo na Ye.


Nani akofunda bato oyo Nzambe apona ? Ezali Nzambe nde akomisaka sembo.


Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :


Ezali mpo na Nzambe nde bozali kati na Yesu-Klisto oyo akomaki, mpo na biso, bwanya kowuta na Nzambe, bosembo, libulisi mpe kokangolama,


Boyebi malamu ete tango bozalaki nanu Bapagano, bozalaki komemama mpe kokosama epai ya banzambe ya bikeko oyo elobaka te.


Toyebi ete moto akoki kokoma sembo te na nzela ya kotosa maloba ya Mobeko, kasi kaka na nzela ya kondima kati na Yesu-Klisto. Yango wana biso mpe tondimelaki Yesu-Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima kati na Klisto, kasi na nzela te ya kotosa maloba ya Mobeko, pamba te moto moko te akoki kokoma sembo na nzela ya kotosa maloba ya mibeko.


Solo, moto moko te akoki kokoma sembo na miso ya Nzambe na nzela ya Mobeko, pamba te moto ya sembo akobika na nzela ya kondima.


Boye Mobeko ezalaki lokola mokengeli, ezalaki na mokumba ya komema biso epai ya Klisto mpo ete tokoma sembo na nzela ya kondima.


Makomi esilaki kobongisa ete Nzambe akokomisa Bapagano sembo na nzela ya kondima, mpe etatolaki Sango Malamu oyo epai ya Abrayami : « Bato ya bikolo nyonso bakopambolama mpo na yo. »


mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye,


Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole,


Kasi biso bandeko balingami ya Nkolo, tosengeli tango nyonso kozongisaka matondi epai ya Nzambe mpo na bino oyo Nkolo alingaka, pamba te Nzambe asila kopona bino wuta na ebandeli mpo ete bozwa lobiko, na nzela ya libulisi ya Molimo mpe ya kondima kati na solo.


Na bongo, topusana pene ya Nzambe na motema mobimba, na kondima nyonso, na motema oyo epetolami na makanisi nyonso ya mabe, mpe na nzoto oyo esukolami na mayi ya peto.


ekozala boni mpo na moto oyo atioli Mwana na Nzambe, amoni pamba makila ya boyokani, oyo epetolaki ye, mpe afingi Molimo ya ngolu ?


Pamba te Mobulisi ya basumuki mpe bato oyo babulisami bazali kaka na Tata moko. Yango wana Yesu azalaki na soni te ya kobenga bango bandeko na Ye,


Kolanda mabongisi na Ye, Nzambe Tata apona bino wuta kala, abulisa bino na nzela ya Molimo na Ye mpo ete botosa Yesu-Klisto mpe bokoma peto na nzela ya makila na Ye, oyo asopaki. Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino na bofuluki !


Lokola bosili komipetola na nzela ya kotosa bosolo mpo na kolingana na bolingo ya solo, bolinganaka makasi bino na bino, na motema ya peto.


Mayi yango ezali elilingi ya libatisi oyo ebikisi bino sik’oyo. Libatisi yango elongolaka mbindo ya nzoto te, kasi ezali mokano ya kotambola na motema peto liboso ya Nzambe ; mpe ezali kobikisa bino na nzela ya lisekwa ya Yesu-Klisto


Bana, nazali kokomela bino, pamba te masumu na bino elimbisamaki mpo na Kombo na Yesu-Klisto.


mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye,


Nazongiselaki ye : — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. Bongo alobaki na ngai : — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ