Elingi koloba te ete bozala mosika na bato nyonso oyo, kati na mokili oyo, batambolaka na bomoi ya pite to bazali na lokoso ya mbongo to bazali miyibi to basambeli bikeko, pamba te soki ezalaki bongo, wana bosengeli kolongwa na mokili.
Mpe bino, bozali lisusu komikumisa na yango ! Nzokande bosengelaki koyoka mawa mpo na yango, mpe kosala ete balongola kati na bino moto oyo azali kosala likambo ya ndenge wana.
Bolongola kati na bino kisi nyonso ya kala ya mapa mpo ete bokoma peto lokola potopoto ya sika ya mapa, ndenge bozali penza. Pamba te Klisto, Mpate na biso ya Pasika, asilaki kopesama lokola mbeka.
Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino kati na mokanda oyo, bokebisa bato nyonso na tina na ye mpe bosangana na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.
Bandeko, totindi bino na Kombo ya Nkolo Yesu-Klisto ete bokima ndeko nyonso oyo atambolaka na bomoi ya mobulu mpe alingaka te kotambola kolanda malakisi oyo bozwaki kowuta na biso.