Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 5:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bolongola kati na bino kisi nyonso ya kala ya mapa mpo ete bokoma peto lokola potopoto ya sika ya mapa, ndenge bozali penza. Pamba te Klisto, Mpate na biso ya Pasika, asilaki kopesama lokola mbeka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 5:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele.


Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »


Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye : — Esika nini olingi ete tokende kobongisela Yo bilei ya Pasika ?


Mokolo oyo elandaki, wana Yoane amonaki Yesu koya epai na ye, alobaki : — Tala Mpate ya Nzambe, oyo alongolaka lisumu ya mokili.


amonaki Yesu koleka mpe alobaki : « Botala Mpate ya Nzambe ! »


Ezalaki mokolo ya suka mpo na kokoma na mokolo ya Pasika, na ngonga ya midi. Pilato alobaki na Bayuda : — Botala mokonzi na bino !


Nzambe akabaki Klisto lokola mbeka mpo ete, na nzela ya kosopa makila na Ye, Klisto azwa bolimbisi masumu ya bato oyo bazali kondima. Asalaki bongo mpo na kotalisa bosembo na Ye, pamba te, na tango ya kala, tango oyo akangaki motema, apesaki bato etumbu te mpo na masumu na bango.


Lokola lipa ezali kaka moko, biso nyonso tozali kosala nzoto kaka moko atako tozali ebele, pamba te biso nyonso tokabolaka lipa yango kaka moko.


Nzambe akosambisa bato oyo bazali na libanda ya Lingomba ; kasi bino, bobengana moto mabe kati na bino.


mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta,


mpe bazalaki koloba na mongongo makasi : « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, lokumu, nkembo mpe masanzoli. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ