Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 5:3 - Mokanda na Bomoi

3 Solo, mpo na ngai, atako nazali elongo na bino te na nzoto, kasi nazali elongo na bino na molimo. Mpe lokola moto oyo azali elongo na bino, na Kombo na Yesu, Nkolo na biso, nasili kokatela moto nyonso oyo azalaki kosala likambo yango etumbu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 5:3
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Boni, mosala na ngai ezali ya kosambisa bato oyo bazali na libanda ya Lingomba ? Boni, ezali bino te nde bosengeli kosambisa bato oyo bazali kati na Lingomba ?


Ngai Polo oyo namonani lokola moto na bolembu na miso na bino, kasi lokola moto ya makambo makasi tango nazalaka mosika, nazali kosenga na bino, na boboto mpe na bolingo ya Klisto :


Boye tika ete moto oyo akanisaka bongo asimba likambo oyo : ndenge tolobaka kati na mikanda na biso tango tozalaka mosika na bino, ndenge wana mpe tokosala tango tokozala epai na bino.


Nasilaki kokebisa bino tango nayaki epai na bino mpo na mbala ya mibale, mpe, wana nazali nanu mosika na bino, nazali kozongela yango lisusu epai ya bato oyo basalaki masumu liboso mpe epai ya bato nyonso, ete, tango nakoya lisusu, nakoyokela moto ata moko te mawa,


Pamba te, atako na nzoto, nazali mosika na bino, kasi na molimo, nazali elongo na bino ; mpe nazali kosepela komona ete bozali kotambola na botosi mpe bozali kobatela kondima na bino kati na Klisto.


Bandeko, awa tokabwanaki na bino mpo na mwa tango moke, na nzoto kasi na makanisi te, tosalaki makasi mpo na komona bino, pamba te tozalaki na posa na bino makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ