12 Boni, mosala na ngai ezali ya kosambisa bato oyo bazali na libanda ya Lingomba ? Boni, ezali bino te nde bosengeli kosambisa bato oyo bazali kati na Lingomba ?
Yesu alobaki na bango : — Epesameli bino koyeba mabombami ya Bokonzi ya Nzambe ; kasi mpo na ba-oyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kotalisama na masese ;
Yesu azongisaki : — Bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te ; soki ezalaki ya mokili oyo, basali na Ngai balingaki kobunda mpo ete nakweya te na maboko ya Bayuda. Solo, bokonzi na Ngai ezali ya mokili oyo te.
Mokambi ya Lingomba asengeli mpe kozala moto oyo akenda sango ya malamu kati na bato oyo bazali bandimi te mpo ete abatela lokumu na ye mpe akweya te na mitambo ya Satana.