1 Bakolinto 5:1 - Mokanda na Bomoi1 Bato bazali koloba bipai nyonso ete pite ezali kosalema kati na bino, pite oyo emonanaka kutu te epai ya Bapagano : mobali moko kati na bino azali kosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tala molongo ya libota ya Jakobi. Elenge mobali Jozefi azalaki na mibu zomi na sambo ya mbotama mpe azalaki kobatela bibwele. Azalaki kosala mosala yango elongo na bandeko na ye ya mibali, bana ya Bila mpe ya Zilipa, basi ya tata na ye. Jozefi azalaki koyebisa tata na bango makambo mabe ya bandeko na ye.
Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.
Ribeni azalaki mwana mobali ya liboso ya Isalaele. Kasi lokola asangisaki nzoto na mwasi moko kati na basi ya tata na ye, makoki ya bomwana na ye ya liboso epesamaki epai ya bana mibali ya Jozefi, mwana mobali ya Isalaele. Yango wana bazalaki kotanga ye lisusu te lokola mwana ya liboso. Nzokande, Jozefi akomamaki te na buku ya mabota lokola mwana ya liboso.
Kasi nazali nde kokomela bino sik’oyo mpo na koyebisa bino ete bozala lisanga moko te na moto oyo amilobelaka ete azali ndeko Moklisto, kasi atambolaka na bomoi ya pite to azali na lokoso ya mbongo to azali mosambeli bikeko to mofingi bato to molangwi masanga to moyibi. Bosengeli kutu te kolia mesa moko elongo na moto ya lolenge oyo.