Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 4:9 - Mokanda na Bomoi

9 Pamba te nakanisi ete, biso bantoma, Nzambe atia biso na suka ya molongo lokola bato oyo bakatela bango etumbu ya kufa na libanda ya masano. Mpo na mokili mobimba, mpo na ba-anjelu mpe mpo na bato, Nzambe akomisa biso lokola lisano ya kotala.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 4:9
21 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

boni, Nzambe na biso alingaki koyeba yango te, lokola asosolaka mozindo ya mitema ?


Nazali likamwisi mpo na bato ebele ; ozali ebombamelo na ngai ya makasi.


Mpo na nini penza nabimaki na libumu ya mama na ngai ? Ezali kaka mpo na komona pasi mpe mikakatano, mpe kosukisa bomoi na ngai na soni ?


Mbala moko, mobulu ekotaki kati na engumba mobimba. Bakangaki Gayusi mpe Arisitarke, bato mibale ya Masedwane, oyo bazalaki kotambola elongo na Polo ; mpe bato nyonso bakendeki na lombangu na ndako ya masano.


Ezala mpe baninga na ye, oyo bazalaki bakambi ya etuka, batindelaki ye maloba mpo na kosenga na ye ete ameka te kosala liseki ya kokende na ndako ya masano.


Kolanda ndenge ekomama : « Ezali mpo na Yo nde balukaka koboma biso mikolo nyonso ; bazwaka biso lokola bameme ya koboma. »


Soki totiaka elikya na Klisto kaka mpo na bomoi oyo, tozali penza bato na mawa koleka bato nyonso.


Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.


koyebana lokola bato oyo bayebani te, nzokande toyebani makasi ; koyebana lokola bakufi, nzokande tozali bato ya bomoi ; koyebana lokola bato bakweyisama, nzokande baboma biso te ;


na tina ete moko te kati na bino abungisa kondima likolo ya pasi oyo bozali komona ; pamba te bino moko boyebi malamu ete tobongisama mpo na yango.


Nzokande, ba-anjelu nyonso bazali milimo oyo esalaka mpo na Nzambe, mpe Nzambe atindaka bango kokokisa lotomo na bango mpo na bolamu ya bato oyo bakozwa lobiko.


Ezalaki na batango oyo bazalaki kofinga bino, konyokola bino na miso ya bato ; ezalaki mpe na batango oyo bozalaki kokabola pasi elongo na bato oyo bazalaki konyokwama.


Bamosusu batiolamaki, babetamaki fimbu, batiamaki minyololo mpe babwakamaki na boloko ;


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ