Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 4:8 - Mokanda na Bomoi

8 Bosili kotondisama na nyonso oyo bozalaka na makanisi ya kozwa ! Bosili penza kokoma bato ya bomengo ! Bobandi kokonza ; bobandi kokonza elongo na biso te ! Nalingaka ete bobanda penza kokonza, mpo ete biso mpe tokonza elongo na bino !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 4:8
27 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ezali na moto moko oyo asalaka makambo lokola mozwi, nzokande azali na ye ata na eloko moko te ; mpe ezali na moto mosusu oyo asalaka makambo lokola mobola, nzokande azali na bozwi mingi.


Moto oyo amikumisaka ete akabaka, nzokande apesaka na ye eloko te, azali lokola mapata mpe mopepe oyo ezangi mvula.


Mawa na bato oyo bamimonaka lokola bato ya bwanya na miso na bango moko, mpe na bato oyo bamimonaka lokola bato ya mayele na miso na bango moko !


Mosakoli Jeremi alobaki : « Amen ! Tika ete Yawe asala bongo ! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu !


Kasi Moyize azongisaki : — Boni, okosalela ngai zuwa na likambo nini ? Nakosepela kutu ete bato nyonso bakoma basakoli mpe Yawe akitisa Molimo na Ye epai na bango !


Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye,


Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo, pamba te bokozala na nzala ! Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo, pamba te bokozala na mawa mpe bokolela !


Polo azongisaki : — Ezala na tango molayi to na tango moke, nazali kosambela Nzambe ete, yo moko kaka te, kasi elongo na bato nyonso oyo bazali koyoka ngai lelo, bokoma lokola ngai, longola kaka minyololo oyo !


Pamba te na ngolu oyo epesameli ngai, nazali koloba na bino nyonso : bomikanisaka te koleka makoki na bino, kasi bomikanisaka na lolenge ya mayele, kolanda kondima oyo Nzambe apesi na moko na moko kati na bino.


pamba te, kati na makambo nyonso, botondisamaki na bomengo kati na Klisto, na oyo nyonso etali maloba mpe na oyo etali boyebi,


Bato mosusu kati na bino bakomi na lofundu, bakanisaka ete nakoya lisusu te epai na bino.


Lolendo na bino ezali kitoko te ! Boyebi te ete mwa kisi moke ya mapa evimbisaka potopoto nyonso ya mapa ?


Bandeko, nabondeli bino : boyikela nanu oyo emonani lokola bozoba na ngai mpiko ! Iyo, boyikela ngai mpiko.


Tozali na esengo ya kozala na bolembu, kasi bino bozali makasi ; mpe tosengaka na Nzambe kati na mabondeli na biso ete bokoma bato ya kokoka.


Soki moto songolo akanisi ete azali moto monene, nzokande azali kaka moto pamba, azali komikosa ye moko.


Kasi botambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Sango Malamu ya Klisto mpo ete, ezala nayei kotala bino to nayei te, nayoka sango ete botelemi ngwi mpe bosangani lokola moto moko, bozali kobunda elongo, na motema moko, mpo na kobatela kondima oyo Sango Malamu ememelaki bino,


Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ;


Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu.


Okomisaki bango ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo Nzambe na biso, mpe bakokonza mokili. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ