Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 4:4 - Mokanda na Bomoi

4 Motema na ngai ezali kosambisa ngai ata na likambo moko te ; nzokande, yango te nde ezali kolongisa ngai. Oyo asambisaka ngai, ezali nde Nkolo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 4:4
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto azali nani mpo ete azala peto ? Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo ?


Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ?


nakobatela bosembo na ngai, nakotika yango te ; motema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te.


« Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba, eyano nini nakoki kopesa Yo ? Natie loboko na ngai na monoko.


Ezala namemaki na ngai ngambo te, monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai ; ezala nazalaki sembo, monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai.


Yawe, soki obosanaka masumu te, Nkolo, nani akokaki kotelema ?


Kosambisa mosali na Yo te, pamba te moto moko te ya bomoi azali sembo liboso na Yo.


Epesaka mosali na Yo mayele ; moto nyonso oyo atosaka yango azwaka litomba mingi.


Makolo na ngai etambolaka na nzela ya alima ; nakopambola Yawe kati na mayangani ya monene.


Likolo ekopanza sango ya bosembo na Ye, pamba te azali Nzambe ya bosembo.


Nzela nyonso ya moto emonanaka alima na miso na ye, kasi ezali Yawe nde amekaka mitema.


Bato ebele balukaka kokoma balingami ya mokonzi, nzokande ezali Yawe nde apesaka oyo ekoki na moto na moto.


Bongo Yesu atunaki ye mpo na mbala ya misato : — Simona, mwana mobali ya Yoane ; boni, olingaka Ngai ? Petelo ayokaki mawa mingi kati na motema mpo ete ekomaki mbala ya misato oyo Yesu atunaki ye : « Olingaka Ngai ? » Bongo azongiselaki Yesu : — Nkolo, oyebi makambo nyonso ; oyebi malamu ete nalingaka Yo ! Yesu alobaki na ye : — Batela bameme na Ngai.


Polo atalaki bato nyonso ya Likita-Monene mpe alobaki : — Bandeko na ngai, kino na moyi ya lelo, nazali kotambola na motema ya peto liboso ya Nzambe.


Pamba te ezali te bato oyo bayokaka Mobeko nde bazali sembo na miso na Nzambe, kasi ezali ba-oyo batosaka Mobeko yango nde bakotangama lokola bato ya sembo.


Soki Abrayami atangamaki lokola moto ya sembo na nzela ya misala, akokaki solo komikumisa ; kasi liboso ya Nzambe, ezali bongo te !


Mpo na ngai, nazali komisambisa na likambo moko te. Yango wana, ezala kosambisa na bino to kosambisa ya esambiselo ya bato, elobelaka ngai eloko moko te.


Yango wana, bosambisaka te liboso ya tango oyo ekatama ; bozela kino tango Nkolo akoya. Akobimisa na pole makambo oyo ebombama kati na molili, mpe akomonisa na miso ya bato makanisi ya mitema ya bato. Na tango wana, moto na moto akozwa lokumu na ye kowuta na Nzambe.


Tala likambo oyo tokoki komikumisa na yango : mitema na biso ezali kotatola ete, kati na mokili mpe mingi penza na miso na bino, totambolaki na bosantu mpe na bosolo oyo ewutaka na Nzambe. Totambolaki bongo na bwanya ya bomoto te, kasi na ngolu ya Nzambe.


Pamba te biso nyonso tokosamba liboso ya esambiselo ya Klisto mpo ete moto nyonso azwa lifuti oyo ekoki na ye kolanda makambo oyo asalaki na nzela ya nzoto na ye, makambo ya malamu to ya mabe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ