Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 4:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nzokande, eloko oyo basengaka epai ya bakambi, ezali ete bazala sembo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 4:2
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mbongo yango ezalaki bobele mpo na kofuta basali oyo bazalaki kobongisa Ndako ya Yawe.


Kasi batuna bango te ndenge nini bakosalela mbongo yango, pamba te basalaka na boyengebene.


Motindami ya mabe akweyaka kati na pasi, kasi motindami ya sembo amemaka lobiko.


Kasi ezalaka bongo te mpo na Moyize, mosali na Ngai. Azali sembo kati na ndako na Ngai mobimba.


Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »


Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »


Nkolo azongisaki : — Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?


Boye, tika ete bato bazwa biso lokola basali ya Klisto mpe lokola bakambi oyo bazwi mokumba ya koyebisa mabombami ya Nzambe.


Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo ; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.


Mpo na ngai, nazali komisambisa na likambo moko te. Yango wana, ezala kosambisa na bino to kosambisa ya esambiselo ya bato, elobelaka ngai eloko moko te.


Mpo na oyo etali baseka, nazali na mobeko te kowuta na Nkolo ; kasi na mawa ya Nkolo, lokola moto oyo bakoki kotiela motema, nazali kopesa likanisi na ngai.


Solo, biso tozali te lokola ebele ya bato oyo bakomisaka Liloba na Nzambe mombongo na bango mpo na kokoma na bomengo. Kati na Klisto, tosakolaka nde Liloba na bosolo nyonso lokola batindami ya Nzambe.


toboyaka nde makambo ya soni oyo esalemaka na nkuku, toboyaka kotambola na lokuta mpe kobebisa bosolo ya Liloba na Nzambe. Nzokande, wuta tokoma koteya bosolo na polele, topesaka na moto nyonso nzela ya kotala soki tozali kotambola malamu to te na miso ya Nzambe.


Ezali molingami Epafrasi, moninga na biso ya mosala, nde ateyaki bino Sango Malamu yango ; azali mosali ya Klisto mpe asalaka na bosembo epai na bino.


Boloba na Arshipe : « Sala keba na lotomo oyo ozwaki kati na Nkolo mpo ete okokisa yango malamu. »


Tishike, ndeko molingami, mosali ya sembo mpe moninga na ngai kati na mosala ya Nkolo, akoyebisa bino makambo nyonso oyo etali ngai.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ