Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 4:19 - Mokanda na Bomoi

19 Kasi, soki Nkolo alingi, nakoya epai na bino kala mingi te ; mpe nakoyeba kaka te ndenge nini bato yango ya lofundu balobaka, kasi mpe nguya nini bazali na yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 4:19
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Atikaki bango na koloba : — Nakozongela bino lisusu, soki Nzambe alingi. Wuta na Efeso, azwaki masuwa mpe akendeki.


Sima na makambo oyo nyonso, Polo, na bokambami ya Molimo, azwaki mokano ya kolekela na Masedwane mpe na Akayi mpo na kokende na Yelusalemi. Alobaki : — Soki nalongwe kuna, nakokende lisusu na Rome.


Wana azalaki kotambola kati na etuka yango, azalaki kolendisa bandimi na mateya ya ndenge na ndenge kino akomaki na Grese


Na bongo nde nakolonga kokoma epai na bino na esengo ; mpe soki Nzambe akolinga, nakopema mwa moke elongo na bino.


Moto nyonso oyo azali na nzala asengeli nanu kolia na ndako na ye, mpo ete mayangani na bino ememela bino etumbu te. Mpe na tina na makambo oyo etikali, nakopesela yango malako tango nakoya.


Nalingi ete bino nyonso bolobaka nkota oyo eyebani te, kasi nalingi mingi koleka ete bino nyonso bosakolaka. Moto oyo azali kosakola azali na tina mingi, koleka moto oyo azali koloba nkota oyo eyebani te, longola kaka soki alimboli nkota yango mpo na kokolisa kondima ya Lingomba.


Sima na ngai kolekela na Masedwane, nakoya kotala bino, pamba te nasengeli kolekela kuna.


Na mbala oyo, naboyi komona bino na koleka, pamba te nazali na elikya ya kovanda mwa mikolo elongo na bino, soki Nkolo alingi.


Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima ; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi.


Bato mosusu kati na bino bakomi na lofundu, bakanisaka ete nakoya lisusu te epai na bino.


Bandeko, nayebisi bino makambo oyo etali ngai moko mpe oyo etali Apolosi, mpo na bolamu na bino, mpo ete, na ndakisa na biso, boyekola likambo oyo : Bolekaka mondelo te ya makambo oyo ekomama ; mpe mpo ete moko te kati na bino atonda na lolendo na kolanda moko mpe koyina mosusu.


Nazali kolapa ndayi na Kombo ya Nzambe mpe likolo ya bomoi na ngai ete ezalaki te mpo na kolukela bino mindondo nde nazongaki lisusu te na Kolinto ;


mpo ete namonana te lokola nde nazali kobangisa bino na nzela ya mikanda na ngai.


Soki Nzambe apesi biso nzela, tokomipesa nde na mateya oyo ekoki mpo na mikolo.


Tala ndenge bosengeli koloba : « Soki Nkolo alingi, tokozala na bomoi mpe tokosala likambo songolo to pakala. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ