15 Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.
Boni, ngai moto namemaki mokumba ya bato oyo nyonso to nabotaki bango ? Mpo na nini oloba na ngai ete namema bango na maboko lokola bana mike, na mokili oyo olakaki na ndayi epai ya bakoko na bango ?
Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.
Koteya Sango Malamu ezali likambo oyo ngai nasengeli te komikumisa na yango, pamba te mosala yango epesamelaki ngai na makasi. Mawa na ngai soki nateyi te Sango malamu !
epai ya Tito, mwana na ngai ya solo kati na kondima moko oyo tozali kokabola elongo na ye : Tika ete ngolu mpe kimia epesamela yo kowuta na Nzambe Tata mpe na Yesu-Klisto, Mobikisi na biso !
Ezali loboko na ngai moko Polo nde ezali kokoma makambo oyo : ngai moko nakofuta yo niongo yango. Nazali mpe na posa te ya kokanisela yo ete yo mpe ozali na niongo na ngai : niongo yango ezali nde bomoi na yo.
Pamba te bobotamaki mbotama ya sika na nzela ya Liloba na Nzambe, oyo ezali nkona oyo epesaka bomoi mpe ewumelaka seko na seko ; kasi na nzela te ya nkona ya bato oyo bakufaka.