Kasi soki, yo, okebisi moto ya sembo mpo ete asala masumu te, bongo ye mpe asali masumu te, akobikisa solo bomoi na ye, pamba te ayoki likebisi na yo, mpe yo, okobikisa bomoi na yo. »
Bozongela makanisi ya malamu na ndenge ekoki mpe botika kosala masumu, pamba te bato mosusu kati na bino bayebi Nzambe te ; nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni.
Pamba te, ata soki bozalaki na balakisi nkoto zomi kati na Klisto, kasi bozali na batata ebele te. Ngai nde nazali tata na bino kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu.
Ezali na tina wana nde natindeli bino Timote, mwana na ngai ya bolingo, oyo azali sembo kati na Nkolo ; akolobela bino lisusu banzela na ngai mpo na bomoi kati na Yesu-Klisto, ndenge kaka nateyaka yango bisika nyonso kati na Mangomba nyonso.
Nazali koloba yango mpo na koyokisa bino soni ! Boni, ezali ata na moto moko te ya bwanya kati na bino, oyo akoki kokata makambo kati na bandeko na ye ?
Kasi ngai, nasaleli makoki na ngai ata moke te, mpe ezali te mpo na kosenga yango nde nakomeli bino mokanda oyo ; pamba te nakosepela kutu kokufa na esika ete moto mosusu abebisa tina ya lokumu na ngai.
Bokanisi ete, wuta kala, biso tolukaka komilongisa liboso na bino ? Te, balingami na ngai ! Ezali liboso ya Nzambe, kati na Klisto, nde tolobaka mpe tosalaka makambo nyonso mpo na kokolisa kondima na bino.
Nalobi bongo te mpo ete bosalaki ngai mabe. Nasilaki koyebisa bino ete bozali na esika ya motuya kati na mitema na biso, ezala mpo na kokufa to mpo na kozala na bomoi elongo na bino.
Soki moto aboyi kotosa mitindo oyo topesi bino kati na mokanda oyo, bokebisa bato nyonso na tina na ye mpe bosangana na ye lisusu te mpo ete ayoka soni.
Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata : Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo.