Bobosana te makambo oyo nayebisaki bino : « Mowumbu aleki nkolo na ye te, na bokonzi. » Lokola banyokolaki Ngai, bino mpe bakonyokola bino ; soki babatelaki mateya na Ngai, bakobatela mpe mateya na bino.
Bino moko boyebi malamu ete ezali maboko na ngai oyo, nde epesaki ngai biloko oyo nazalaki na bosenga na yango mpo na ngai moko, mpe oyo baninga na ngai bazalaki na bosenga na yango.
Nzokande, « Soki monguna na yo azali na nzala, pesa ye bilei ; soki azali na posa ya komela mayi, pesa ye mayi. Pamba te, soki osali bongo, okotondisa makala ya moto na likolo ya moto na ye. »
Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala ; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga.
Bandeko na ngai, bokanisa ndenge nini tomonaki pasi mpe tosalaki mosala makasi ; butu mpe moyi, tozalaki kosala, pamba te toboyaki kozala mokumba epai ya moto ata moko kati na bino, wana toteyaki bino Sango Malamu ya Nzambe.
mpe toliaki epai ya moto moko te bilei ya ofele ; kasi tozalaki, butu mpe moyi, kosala mosala ya makasi mpe ya pasi, mpo ete topesa mokumba na biso epai ya moto moko te kati na bino.
Tala mpo na nini tosalaka mpe tobundaka makasi : ezali mpo ete tosili kotia elikya na biso kati na Nzambe na bomoi oyo azali Mobikisi ya bato nyonso mpe mingi-mingi ya bandimi na Ye.
Tango bazalaki kofinga Ye, azalaki kozongisa na mafinga te. Tango bazalaki komonisa Ye pasi, azalaki kokanela bato te, kasi azalaki kaka komitika na maboko ya Nzambe, Mosambisi ya sembo.
Bozongisaka te mabe na mabe to mafinga na mafinga, kasi bozongisaka mabe na mapamboli ; pamba te Nzambe abengaki bino na kopambola mpo ete bino mpe boyamba mapamboli lokola libula na bino.
Boye tika ete bato oyo bazali komona pasi mpo ete batosaka mokano ya Nzambe bamipesa mobimba na Mokeli na bango oyo azali sembo, mpe tika ete basalaka bolamu.
Nzokande, ezala Misheli, mokonzi ya ba-anjelu, tango abendanaki na Satana na tina na nzoto ya Moyize, amekaki ata moke te kopesa Satana etumbu ya soni ; kasi alobaki kaka : « Tika ete Nkolo apesa yo etumbu ! »