Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 4:11 - Mokanda na Bomoi

11 Kino sik’oyo, tozali konyokwama na nzala, na posa ya mayi, tozangi bilamba, tozali kobetama, tozali koyengayenga,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 4:11
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Ozalaki koluka na pamba ndanga epai ya bandeko na yo ya mibali, ozalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu,


Kasi Yesu alobaki na ye : — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.


Bongo, Bayuda oyo bawutaki na Antioshe mpe na Ikoniomi batiaki songisongi kati na bato mpo ete batombokela bango. Babambaki Polo mabanga, mpe babendaki ye kino na libanda ya engumba, pamba te bakanisaki ete akufi.


Sima na kobetisa bango fimbu makasi, babwakaki bango kati na boloko ; bapesaki mitindo na mokengeli boloko ete akengela bango malamu.


Kasi Ananiasi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, apesaki bato oyo bazalaki pene ya Polo mitindo ete babeta ye na monoko.


Nani akokabola biso na bolingo ya Klisto ? Pasi, somo, minyoko, nzala, kozanga bilamba, likama to mopanga ?


Boni, tozangi makoki ya kolia mpe ya komela ?


Bozali penza kondima ete bato bakomisa bino bawumbu, babotola bozwi na bino, banyokola bino, bamonela bino, babeta bino na bilongi !


Boye, tomonaka pasi ya ndenge na ndenge, kasi tosukaka te ; mobulu ekotaka kati na mayele na biso, kasi tobungisaka elikya te ;


Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli.


minyoko mpe pasi na ngai ; oyebi makambo nyonso oyo ekomelaki ngai na Antioshe, na Ikoniomi mpe na Listre. Solo, nanyokwamaki makasi, kasi Nkolo akangolaki ngai wuta na nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ