Tika ete boboto ya Nkolo, Nzambe na biso, ezala elongo na biso ! Mpo na biso, sala ete misala na biso ekende liboso ! Iyo, sala ete misala na biso ekende kaka liboso !
Nazali nzete ya vino ; bino, bozali bitape. Moto oyo akowumela kati na Ngai, mpe Ngai kati na ye, akobotaka bambuma ebele, pamba te bokoki kosala eloko moko te, soki na lisungi na Ngai te.
Tala, nazali koloba lokola moto ya liboma, pamba te bino nde botindiki ngai kosala bongo. Pamba te ata soki nazali moto pamba, kasi bantoma oyo bamimonaka minene baleki ngai ata na eloko moko te.
Kasi azongiselaki ngai : « Ngolu na Ngai ekoki mpo na yo, pamba te nguya na Ngai ekokisamaka kati na bolembu. » Mpo na yango, nakomikumisa na esengo nyonso mpo na bolembu na ngai, mpo ete nguya ya Klisto ezala kati na ngai.