Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 3:5 - Mokanda na Bomoi

5 Boni, Apolosi azali nani ? Polo mpe azali nani ? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 3:5
30 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano ; na mosali ya mibale, batalanta mibale ; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo.


kolanda ndenge bayebisaki biso yango na bato oyo, wuta na ebandeli, bamonaki yango na miso mpe bakomaki basali ya Liloba na Nzambe.


Yoane azongisaki : — Moto akoki kozwa eloko moko te soki Likolo epesi ye yango te.


Moyuda moko ayaki na Efeso, kombo na ye ezalaki « Apolosi. » Abotamaki na Alekizandri, ayebaki koloba malamu mpe ayebaki bozindo ya Makomi.


Wana Apolosi azalaki na Kolinto, Polo alekelaki na mokili ya bangomba ya Azia, mpe akomaki na Efeso. Kuna, akutaki mwa ndambo ya bayekoli


ya kozala mosali ya Yesu-Klisto mpo na Bapagano. Boye abulisi ngai mpo na kosakola Sango Malamu ya Nzambe mpo ete Bapagano bakoma likabo oyo ekosepelisa Nzambe, likabo oyo Molimo Mosantu abulisi.


Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.


Mpo na oyo etali Apolosi, ndeko na biso, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko, kasi aboyi kosala yango sik’oyo ; akoya kaka tango akokutana na libaku ya malamu.


Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.


ezala Polo, Apolosi, Petelo, mokili, bomoi, kufa, tango oyo tozali sik’oyo to tango oyo ezali koya. Nyonso ezali ya bino ;


Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina ; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina.


Soki mokano ya koteya ewutaki epai na ngai moko, nalingaki solo kozwa lifuti ; kasi lokola mokano yango ewutaki epai na ngai te, nazali kaka kokokisa mosala oyo epesamelaki ngai.


Bazali basali ya Klisto ? —Nazali koloba lokola moto ya liboma— Ngai naleki bango. Pamba te nasalaki makasi penza, nakotaki mbala mingi na boloko, babetaki ngai mingi, nakutanaki na makama ya kufa mbala mingi.


Bozali penza kolakisa ete bozali mokanda ya Klisto, bozali mbuma ya lotomo na biso, mpe ete bozali mokanda oyo ekomamaki na nzela ya mayi ya ekomeli te kasi na nzela ya Molimo ya Nzambe na bomoi, mokanda oyo ekomamaki na likolo ya bitando ya mabanga te kasi kati na mitema ya bato.


Ezali Nzambe nde apesaki biso makoki ya kozala basali ya Boyokani ya sika oyo evandisami na Mibeko te kasi na Molimo ; pamba te Mibeko ebomaka, kasi Molimo apesaka bomoi.


Boye, lokola yango nde lotomo oyo Nzambe apesaki biso na mawa na Ye, tobungisaka elikya te ;


Toteyaka sango na biso moko te, toteyaka nde ete Yesu-Klisto azali Nkolo, mpe ete biso tozali bawumbu na bino mpo na Yesu.


Kasi tomemaka bomengo yango kati na bambeki ya mabele mpo ete nguya monene ya Nzambe emonana, kasi nguya na biso bato te.


Makambo oyo nyonso ewutaka na Nzambe oyo azongisaki boyokani kati na biso mpe Ye moko na nzela ya Klisto mpe apesaki biso lotomo ya boyokanisi.


Lokola tozali basali elongo na Nzambe, tozali kolendisa bino ete bozwa ngolu ya Nzambe na pamba te ;


Kasi tomikumisaka nde lokola basali ya Nzambe, kati na makambo nyonso : na koyika mpiko makasi kati na minyoko, kozanga mpe pasi na motema ;


Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai lokola likabo na nzela ya nguya na Ye, nakoma mosali ya Sango Malamu.


Kasi bosengeli penza kowumela, kotelema ngwi mpe kolenda kati na kondima na bino ; mpe bosengeli koboya kopengwa mosika ya elikya oyo bozwaki wuta tango boyokaki Sango Malamu. Sango Malamu yango esakolamaki kati na bikelamu nyonso oyo ezali na se ya Likolo, mpe ngai Polo nakoma mosali na yango.


Nakoma mosali na yango kolanda mokumba oyo Nzambe apesa ngai : mokumba ya koteya bino Liloba na Nzambe na mobimba na yango.


Nazali kozongisa matondi epai ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, oyo apesaki ngai nguya, pamba te amonaki ete akoki kotiela ngai motema, wana aponaki ngai mpo na lotomo na Ye,


Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe ; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ