1 Bakolinto 3:18 - Mokanda na Bomoi18 Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Pamba te biso mpe, na kala, tozalaki kosala makambo lokola bazoba, lokola bato bazanga botosi na miso ya Nzambe, lokola bato babunga nzela, lokola bawumbu ya lolenge nyonso ya baposa mpe ya bisengo. Na bomoi na biso, tozalaki kobika bomoi ya kosalaka mabe na bato mpe ya bilulela. Bato bayinaki biso, mpe tozalaki koyinana biso na biso.