Mpe lisusu, na tina na bolingo na ngai mpo na Ndako ya Nzambe na ngai, napesi sik’oyo wuta na bozwi na ngai moko : wolo mpe palata mpo na Ndako ya Nzambe na ngai likolo ya nyonso oyo nabongisaki mpo na Ndako oyo ya bule :
Nzembo ya Azafi. Oh Nzambe, tala ndenge bato ya bikolo ya bapaya bakoti na makasi kati na libula na Yo, bakomisi Esika na Yo ya bule mbindo, mpe bakomisi Yelusalemi mipiku ya mabanga !
Mpe lisusu, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe : ‹ Lokola bokomisi Ndako na Ngai ya bule mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko mpe makambo na bino ya nkele, nakolongola Ngai moko ngolu na Ngai na likolo na bino : liso na Ngai ekotala bino lisusu na mawa te mpe nakobikisa bino lisusu te. ›
Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. ›
Ngai nakotombokela moto yango mpe nakolongola ye kati na bato na ye, pamba te abonzaki mwana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki mpo na kokomisa mbindo Esika na Ngai ya bule mpe mpo na kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai.
Kasi soki moto oyo amikomisaki mbindo amipetoli, bakolongola ye kati na lisanga ; pamba te akomisi mbindo Esika ya bule ya Yawe. Mpe lokola basopeli ye te mayi ya bopetoli na nzoto, akozala mbindo.
Bomikosa te : soki moto moko kati na bino akanisi ete azali na bwanya kati na mokili oyo, tika ete akoma lokola zoba mpo ete akoma penza moto ya bwanya.