Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 3:15 - Mokanda na Bomoi

15 Kasi soki eziki, motongi akozwa eloko te. Ye moko kaka nde akobika, kasi ekozala lokola moto oyo asili kobika na likama ya moto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 3:15
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ; soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto.


Pamba te, Nzambe, omekaki biso, olekisaki biso kati na moto ndenge basalaka mpo na palata.


Otikaki moto komatela biso na moto. Tolekaki kati na moto mpe kati na mayi, mpe obimisaki biso kati na yango mpo na komema biso na bofuluki.


« Nabebisaki bino ndenge nabebisaki Sodome mpe Gomore ; bozalaki lokola koni ya moto oyo babimisi na moto. Kasi atako bongo, bozongelaki Ngai te, » elobi Yawe.


Yawe alobaki na Satana : — Satana, tika ete Yawe apamela yo ! Tika ete Yawe oyo apona Yelusalemi apamela yo ! Boni, moto oyo azali te lokola koni ya moto oyo balongoli na moto ?


Sima na bato kosala mikolo ebele oyo baliaki lisusu te, Polo atelemaki liboso na bango mpe alobaki : — Baninga na ngai, bosengelaki koyoka toli na ngai ete tolongwa na Kreti te. Soki boyokelaki ngai, likama oyo elingaki kokomela bino te mpe bolingaki te kobungisa biloko na bino.


Bamosusu basengeli kolanda bango na kodiembela na mabaya to na biteni ya masuwa. Ezali ndenge wana nde bato nyonso bakomaki malamu na mokili.


Pamba te Makomi elobi : « Soki ezali na pasi makasi nde moto ya sembo abikisami, ekozala boni mpo na moto mabe mpe mosumuki ? »


Boye, bosala keba mpo ete bobungisa te mbuma ya mosala na biso, kasi mpo ete bozwa lifuti ya kokoka.


mpo na bato mosusu, bobikisa bango na kobimisa bango na moto ; mpe mpo na bato mosusu lisusu, boyokela bango mpe mawa oyo esangana na bobangi, na koyina ezala ata bilamba na bango, oyo baposa na bango ya nzoto ekomisa mbindo.


Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ