Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ; moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye akotikala kobanga te.
Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.
Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko.
Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba.