1 Bakolinto 3:10 - Mokanda na Bomoi10 Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai, natongaki moboko lokola mobongisi ya mayele, mpe moto mosusu azali kotonga na likolo na yango. Boye tika ete moko na moko asala keba na lolenge na ye ya kotonga na likolo ya moboko. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tika ete moto oyo azali na likabo ya koloba asakola Liloba na Nzambe ; tika ete moto oyo azali na likabo ya kosunga bato asala yango na makasi oyo Nzambe apesi ye mpo ete, kati na makambo nyonso, Nzambe azwa lokumu na nzela ya Yesu-Klisto. Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen !