Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 2:9 - Mokanda na Bomoi

9 Kasi, kolanda ndenge ekomama : « Oyo liso etikala nanu komona te, oyo litoyi etikala nanu koyoka te, mpe oyo moto atikala nanu kokanisa te kati na motema na ye, yango nde Nzambe abongisi mpo na bato oyo balingaka Ye. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 2:9
12 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete ekangama, bibebu oyo elobaka lokuta, oyo elobaka na lolendo mpe na lofundu, oyo ebebisaka lokumu ya moto ya sembo na nzela ya songisongi.


Osungaka bato oyo bazalaka na esengo ya kosala makambo ya sembo, ba-oyo babosanaka nzela na Yo te. Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu ; bongo ndenge nini tokoki solo kobika ?


Solo, nakokela likolo mpe mabele ya sika ; makambo ya liboso, bakokanisa yango lisusu te, ekomata ata lisusu na motema te.


Yesu alobaki na bango : — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela ; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.


Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.


Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi penza, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo ete moto nyonso oyo akondima Ye akufa te kasi azwa bomoi ya seko.


Mpe toyebi malamu ete kati na makambo nyonso, Nzambe asalaka mpo na bolamu ya bato oyo balingaka Ye, ba-oyo babengama kolanda mabongisi na Ye.


Kasi sik’oyo bazali koluka mokili ya kitoko penza, elingi koloba mokili ya Likolo. Yango wana Nzambe azalaka na soni te tango babengaka Ye « Nzambe na bango, » pamba te abongisela bango engumba moko ya kitoko.


Esengo na moto oyo akangaka motema na tango ya komekama ! Pamba te sima na ye kolonga komekama, akozwa motole ya bomoi, oyo Nzambe alakaki na bato oyo balingaka Ye.


Bandeko na ngai ya bolingo, boyoka : Nzambe apona te bato oyo mokili ezali kobenga babola mpo ete bazala bato ya bomengo kati na kondima mpe bazwa Bokonzi oyo alaka epai ya bato oyo balingaka Ye ?


Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo ; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.


Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ