Kaka na tango yango, Yesu alobaki : — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !
Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.
Bato ya Yelusalemi mpe bakambi na bango basosolaki te soki Yesu azali nani ; basosolaki mpe te maloba ya basakoli oyo etangamaka mikolo nyonso ya Saba. Nzokande, tango bakatelaki Ye etumbu, bakokisaki nde masakoli yango.
Nzokande, toteyaka bwanya epai ya Baklisto oyo bakemba na kondima ; mpe bwanya yango ezali ya mokili oyo te to mpe ya bakonzi ya tango oyo te, oyo babongisami mpo na libebi.
Kasi mayele na bango ekomaki bozoba. Kino na mokolo ya lelo, tango batangaka mikanda ya Boyokani ya Kala, vwale yango ezalaka kaka, elongwe nanu te kati na bango, pamba te elongwaka kaka kati na Klisto.