2 Pamba te, wana nazalaki elongo na bino, nazwaki mokano ya koluka koyeba likambo mosusu te, longola kaka Yesu-Klisto mpe Yesu-Klisto oyo babakaki na ekulusu.
Nzokande, bomoi ya seko ezali : koyeba Yo oyo ozali Nzambe moko kaka ya solo, mpe koyeba Yesu-Klisto oyo otindaki.
Oh bato ya Galatia, bozali penza babolole ! Nani aloki bino ? Balimbolelaki bino polele ndenge nini babakaki Yesu-Klisto na ekulusu.
Mpo na ngai, nakomikumisa na eloko mosusu te, longola kaka na ekulusu ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, pamba te ezali na nzela ya ekulusu yango nde mokili ebakamaki mpo na ngai, mpe ngai nabakamaki mpo na mokili.