Kasi nani kati na basakoli wana akotaki na mayangani ya Yawe mpo ete amona to mpe ayoka Liloba na Yawe ? Nani apesaki litoyi mpo na koyoka liloba na Ye ?
Nazali kobenga bino lisusu te « bawumbu, » pamba te mowumbu ayebaka te makambo oyo nkolo na ye asalaka. Nzokande, nazali kobenga bino « baninga na Ngai, » pamba te nayebisi bino makambo nyonso oyo nayekolaki epai ya Tata na Ngai.