Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 2:14 - Mokanda na Bomoi

14 Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 2:14
36 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Motioli alukaka bwanya mpe azwaka yango te, kasi boyebi eyaka na pete epai na moto ya mayele.


Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo : — Mosika na Ngai, Satana ! Ozali epekiselo mpo na Ngai ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.


Mingi kati na bango bazalaki koloba : — Azali na molimo mabe ! Azali na liboma ! Mpo na nini bozali koyoka ye ?


Atako Yesu asalaki bikamwa ebele na miso na bango, kasi bandimaki Ye kaka te


Molimo ya solo, Molimo oyo mokili ekoki koyamba te mpo ete ezali komona Ye te to eyebi Ye te. Kasi bino, boyebi Ye, pamba te azali elongo na bino mpe azali kati na bino.


Kasi Molobeli, Molimo Mosantu oyo Tata akotinda na Kombo na Ngai, akoteya bino makambo nyonso mpe akosunga bino mpo ete bobosana te nyonso oyo nayebisaki bino.


Tango Molobeli akoya, oyo nakotindela bino kowuta epai ya Tata —Molimo ya bosolo, oyo akowuta epai ya Tata— akotatola Ye moko na tina na Ngai ;


Lokola bolukaka kaka kopesana lokumu bino na bino mpe boboyaka lokumu oyo ewutaka kaka na Nzambe, ndenge nini bokoki kondima Ngai ?


Mpo na nini bozali kososola te elobeli na Ngai ? Ezali mpo ete bozali kokoka te koyoka makambo oyo nazali koloba na bino.


Kati na basi yango, ezalaki na mwasi moko, kombo na ye « Lidi. » Azalaki moteki ya bilamba ya motane, moto ya Tiyatire mpe mogumbameli ya Nzambe. Azalaki koyoka, mpe Nkolo afungolaki motema na ye mpo ete akangama na makambo oyo Polo azalaki koloba.


Ndambo ya bato ya mayele oyo balandaka malakisi ya Epikire mpe ya Zenon bakomaki kotiana tembe na ye. Bamoko batunaki : — Moto oyo ya makelele alingi koloba nini ? Bamosusu balobaki : — Tomoni lokola nde azali kolobela banzambe ya bapaya ! Balobaki bongo mpo ete Polo azalaki koteya Sango Malamu na tina na Yesu mpe lisekwa kati na bakufi.


Tango bayokaki Polo koloba na tina na lisekwa ya bakufi, bamoko basekaki ye, mpe bamosusu balobaki : — Tokoyoka yo mokolo mosusu na tina na likambo oyo.


Kasi lokola ezali kaka likambo ya tembe na tina na makambo oyo etali maloba, bakombo mpe mibeko na bino, wana etali kaka bino moko ; ngai naboyi kozala mosambisi ya makambo ya boye.


Batianaki tembe na tina na lolenge na bango ya kosambela, mpe na tina na moto moko oyo asila kokufa, moto oyo Polo azalaki koloba na tina na ye ete azali na bomoi ; kombo ya moto yango ezalaki « Yesu. »


Pamba te mateya ya ekulusu ezali liboma mpo na bato oyo bazali kobunga, kasi ezali nguya ya Nzambe mpo na biso oyo tobiki ;


Pamba te lokola, kati na bwanya ya Nzambe, mokili etikalaki te koyeba Nzambe na nzela ya bwanya na yango, yango wana Nzambe asepeli kobikisa bandimi na nzela ya mateya oyo emonani lokola liboma.


biso, tozali koteya Klisto oyo babakaki na ekulusu : ezali penza libaku mpo na Bayuda, mpe liboma mpo na Bapagano.


Pamba te liboma ya Nzambe ezali na bwanya koleka bwanya ya bato, mpe bolembu ya Nzambe ezali makasi koleka makasi ya bato.


ekundami nzoto ya bomoto, kasi ekosekwa nzoto ya molimo. Soki nzoto ya bomoto ezali, nzoto ya molimo mpe ezali.


Ezali te bomoi ya molimo nde eyaki liboso, ezali nde bomoi ya bomoto ; bomoi ya molimo eyaki na sima.


Nzokande biso, tozwaki molimo ya mokili te, kasi tozwaki Molimo kowuta na Nzambe, mpo ete tokoka kososola biloko oyo Nzambe apesi biso na nzela ya ngolu.


Bandeko, nakokaki te koloba na bino lokola na bato oyo batambolisamaka na Molimo, kasi lokola na bato oyo batambolisamaka kolanda baposa ya nzoto, lokola na bana mike kati na Klisto.


Bwanya ya ndenge wana ewutaka na Likolo te, kasi ezali ya mokili, ya bomoto, ya Satana.


Nzokande bino, bozali na epakolami kowuta na Molimo Mosantu, mpe bino nyonso bozali na boyebi ya nyonso.


Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango.


Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko.


Bazali bato oyo bakotisaka bokabwani kati na bato, bazali lokola banyama mpo ete bazangi Molimo ya Nzambe.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ