Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 2:13 - Mokanda na Bomoi

13 Ezali biloko yango nde tolobelaka, na maloba ya bwanya ya bomoto te kasi na maloba oyo Molimo alakisaka. Boye, tolobelaka makambo ya Molimo na nzela ya maloba oyo Molimo apesaka.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 2:13
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

pamba te Molimo Mosantu akolakisa bino, na tango yango, makambo oyo bosengeli koloba.


Bango nyonso batondisamaki na Molimo Mosantu mpe babandaki koloba na nkota mosusu, ndenge Molimo azalaki kolakisa bango.


Pamba te Klisto atindaki ngai te kobatisa bato, kasi atindaki ngai kosakola Sango Malamu. Mpo na yango, nasengeli te kosalela bwanya mpe elobeli malamu ya bomoto, noki te ekulusu ya Klisto ezanga nguya na yango.


Pamba te moto oyo alobaka na lokota oyo eyebani te alobaka na Nzambe kasi na bato te. Boye moto moko te asosolaka ye ; nzokande, alobaka mabombami, na bokambami ya Molimo.


Yango wana bandeko, tango ngai mpe nayaki epai na bino mpo na kosakola mabombami ya Nzambe, nasalelaki te boyebi makasi ya koloba to ya bwanya.


Moto oyo azangi Molimo ya Nzambe akoki te koyamba makambo kowuta na Molimo ya Nzambe, pamba te ezali lokola liboma na miso na ye ; akoki mpe te koyeba yango, pamba te basosolaka yango kaka na nzela ya Molimo.


Maloba mpe mateya na ngai ewutaki te na maloba ya bwanya ya bomoto mpo na kondimisa bino, kasi ewutaki na kotalisama ya Molimo mpe ya nguya,


Boni, soki tolonaki nkona ya molimo kati na bino, ezali penza mabe soki tobuki kati na bino mbuma ya biloko oyo maboko ekoki kosimba ?


bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo ; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino ;


Tika ete Liloba ya Klisto, kati na bomengo na yango nyonso, evanda kati na bino ; boteyanaka mpe bokebisanaka na bwanya nyonso, na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu mpe banzembo oyo ewutaka na Molimo. Mpe boyembelaka Nzambe na kozongisa matondi kati na mitema na bino.


Nzambe atalisaki bango ete sango oyo bango bazwaki mokumba ya kotatola ezalaki mpo na bango te, kasi ezalaki nde mpo na bino. Mpe sik’oyo, bozali koyoka sango yango na minoko ya bato oyo bateyaki bino Sango Malamu na nguya ya Molimo Mosantu oyo Nzambe atindaki wuta na Likolo ; mpe bango moko ba-anjelu bazalaka na posa ya koyeba yango.


Solo, tango toyebisaki bino makambo oyo etali koya ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, kati na nguya na yango nyonso, tolandaki te basambole oyo bato basalaka na mayele na bango, kasi na miso na biso moko, tomonaki Ye kati na kongenga nyonso ya nkembo na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ