Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 16:6 - Mokanda na Bomoi

6 Tango mosusu, nakovanda mwa mikolo epai na bino to nakolekisa kuna tango ya malili, mpo ete bopesa ngai, bino moko, makoki oyo nasengeli na yango mpo na kokoba mobembo na ngai kino epai nakokende.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 16:6
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.


Bato oyo bakendeki kotika Polo bamemaki ye kino na Ateni ; mpe na mitindo ya Polo, bazongaki na Bere koyebisa Silasi mpe Timote ete balanda ye noki na Ateni.


bayokaki mawa mingi koleka mpo alobaki na bango ete bakomona elongi na ye lisusu te. Bongo bakendeki kotika ye kino na masuwa.


Atako bongo, tango mikolo na biso ekokaki, tolongwaki wana mpe tokobaki mobembo na biso. Bayekoli nyonso elongo na basi na bango mpe bana na bango bakendeki kotika biso kino na libanda ya engumba. Tango tokomaki na libongo, tofukamaki mpo na kosambela.


Lokola mpe libongo ezalaki esika ya malamu te mpo na kolekisa tango ya malili makasi, mingi kati na bato bazwaki mokano ete tolongwa wana mpe toluka kokoma na Fenikisi oyo ezali libongo ya Kreti, oyo etala na ngambo ya sude-weste mpe ya nor-weste, mpo na kolekisa kuna tango yango ya malili makasi.


Sima na basanza misato, tozwaki masuwa oyo elekisaki tango na yango ya malili makasi kati na esanga. Ezalaki masuwa ya engumba Alekizandri, oyo batia bilembo ya Kasitori mpe Polikisi.


nazali kosala mabongisi ya kokokisa yango tango nakokende na Espane. Nazali na elikya ete, wana nakolekela epai na bino, nakomona bino mpe nakozwa lisungi na bino mpo na kokende kuna, sima na ngai kosepela kovanda elongo na bino ata na mwa tango moke.


Tika ete moto moko te atala ye lokola eloko ya pamba ! Bopesa ye makoki mpo ete asala mobembo ya malamu kino epai na ngai, pamba te nazali kozela ye elongo na bandeko.


mpe mpo ete, longwa epai na bino, nakende na Masedwane, mpe, sima na ngai kowuta na Masedwane, nazonga lisusu epai na bino mpo ete nazwa lisungi ya kokoba mobembo na ngai kino na Yuda.


Tango kaka nakotindela yo Artemasi to Tishike, sala nyonso mpo ete oya epai na ngai, na Nikopolisi, pamba te nazwaki mokano ya kolekisa kuna eleko ya malili makasi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ