Soki ozali kozongisa matondi epai ya Nzambe kati na molimo na yo, ndenge nini ba-oyo bazali koyoka te bakoki koloba « Amen ! » na losambo na yo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe ? Pamba te bayebi te makambo oyo ozali koloba.
Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe, mpe ndeko Timote ; Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya basantu nyonso oyo bazali kati na Akayi mobimba :
Mpo na ngai, nakopesa biloko na ngai nyonso na esengo, mpe nakomipesa mobimba mpo na bino. Soki nalingi bino mingi ; boni, bino bokoki kolinga ngai mingi te ?