Oh mobali oyo ngai nalingaka, yebisa ngai esika nini oleisaka bibwele na yo, esika nini opemisaka bampate na yo na midi ! Mpo na nini nazala lokola mwasi oyo azali koyengayenga sima na bibwele ya baninga na yo ?
Elobeli na ye esalaka elengi na motema, mpe nzoto na ye mobimba esalaka ete balula ye. Tala ndenge mobali na ngai ya motema, molingami na ngai, azali, oh bilenge basi ya Yelusalemi !
Nakoyemba loyembo mpo na molingami na ngai, loyembo ya molingami na ngai mpo na elanga na ye ya vino. Molingami na ngai azalaki na elanga moko ya vino kati na mabele kitoko oyo ezalaka na mopanzi ya ngomba ;
Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.
Moto oyo alingaka Ngai, ezali ye oyo abatelaka mibeko na Ngai mpe atiaka yango na misala. Tata na Ngai akolinga moto oyo alingaka Ngai ; Ngai mpe nakolinga ye mpe nakomimonisa epai na ye.
Yesu azongiselaki ye : — Moto oyo alingaka Ngai akobatela maloba na Ngai, mpe Tata na Ngai akolinga ye ; bongo tokoya epai na ye mpe tokovanda elongo na ye.
Mpe soki nasalaki te, kati na bango, misala wana oyo moto ata moko te asalaki, balingaki te kozala na ngambo ya lisumu. Kasi sik’oyo, atako bamonaki misala yango, bazali kaka kokoba koyina biso : Ngai mpe Tata na Ngai.
Yesu alobaki na bango : — Soki Nzambe azalaki penza Tata na bino, bolingaki kolinga Ngai, pamba te nawutaki epai ya Nzambe, mpe ezali kolanda mokano na Ye nde nazali sik’oyo awa. Nayaki na ndenge na Ngai moko te, kasi Ye nde atindaki Ngai.
Yango wana, nazali koloba na bino ete moto moko te, wana akambami na Molimo ya Nzambe, akoki koloba : « Tika ete Yesu alakelama mabe ! » Mpe moto moko te akoki koloba : « Yesu azali Nkolo, » soki akambami na Molimo Mosantu te.
Pamba te, kati na Yesu-Klisto, likambo ya tina ezali : kozala na kondima oyo esalaka na nzela ya bolingo ; ezali te : kokatama ngenga to kokatama ngenga te.
Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.
Bolingaka Yesu-Klisto atako bomona Ye te. Atako bozali mpe kaka komona Ye te sik’oyo, bozali kondimela Ye mpe botondi na esengo ya nkembo oyo moto akoki kolimbola te,