Yango wana, tobondisamaki na nzela ya makambo oyo nyonso. Mpe esengo makasi ebakisamaki na kobondisama na biso na kotala esengo ya Tito, pamba te bino nyonso bokitisaki ye motema.
Bandeko, tosengi na bino ete bondimaka bato oyo basalaka mosala makasi kati na bino, oyo bamitungisaka mpo na bino kati na Nkolo mpe bapesaka bino makebisi.