Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 16:16 - Mokanda na Bomoi

16 Bino mpe, botosaka bato ya ndenge wana mpe moto nyonso oyo asalaka elongo na bango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 16:16
20 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Davidi abimaki mpo na kokutana na bango mpe alobaki : « Soki boyei epai na ngai na makanisi ya kimia mpo ete bosunga ngai, wana ngai mpe bino tokosala boyokani ; kasi soki boyei mpo na koteka ngai epai ya banguna na ngai wana maboko na ngai esali mabe te, tika ete Nzambe ya batata na biso azala motatoli mpe akata likambo ! »


Moto azwaka litomba nini penza na misala nyonso oyo amonelaka pasi na se ya moyi ?


Bopesa mbote na Trifene mpe Trifose, basi oyo basalaki mosala makasi kati na Nkolo. Bopesa mbote na Periside, mwasi molingami na ngai, oyo asalaki mosala makasi kati na Nkolo.


Bopesa mbote na Prisika mpe Akilasi, baninga na ngai ya mosala kati na Yesu-Klisto.


Bopesa mbote na Mari oyo asalaki mosala makasi mpo na bino.


Bopesa mbote na Iribano, moninga na biso ya mosala kati na Klisto, mpe Sitakisi, molingami na ngai.


Mpe kati na Lingomba, Nzambe atiaki : ya liboso, bantoma ; ya mibale, basakoli ; ya misato, balakisi ; mpe na sima, bato oyo bazali na likabo ya kosala bikamwa, ba-oyo bazali na likabo ya kobikisa babeli, ba-oyo bazali na likabo ya kosunga bato, ba-oyo bazali na likabo ya kokamba, mpe ba-oyo bazali na likabo ya koloba nkota ya ndenge na ndenge.


Pamba te biso, tozali basali elongo na Nzambe ; mpe bino, bozali elanga ya Nzambe, Ndako ya Nzambe.


mpe lokola botosaka Klisto, botosanaka bamoko na bamosusu.


Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala : sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi.


Tobosanaka te liboso ya Nzambe, Tata na biso, misala ya kondima na bino, misala ya bolingo na bino mpe molende na bino, oyo ewuti na elikya monene oyo bozali na yango kati na Nkolo na biso, Yesu-Klisto.


Bandeko na ngai, bokanisa ndenge nini tomonaki pasi mpe tosalaki mosala makasi ; butu mpe moyi, tozalaki kosala, pamba te toboyaki kozala mokumba epai ya moto ata moko kati na bino, wana toteyaki bino Sango Malamu ya Nzambe.


Bandeko, tosengi na bino ete bondimaka bato oyo basalaka mosala makasi kati na bino, oyo bamitungisaka mpo na bino kati na Nkolo mpe bapesaka bino makebisi.


Bakambi oyo batambolisaka malamu misala ya Lingomba basengeli kozwa lifuti mbala mibale, mingi-mingi ba-oyo basalaka mosala ya kopanza Sango malamu mpe ya koteya.


Botosaka bakambi na bino mpe bosalelaka mitindo oyo bapesaka bino, pamba te bazali bakengeli ya milimo na bino mpe bakosamba likolo na bino liboso ya Nzambe. Bosalaka bongo mpo ete basala mosala na bango na esengo, kasi na koyimayima te, soki te bokozanga litomba.


Bopesa mbote na bakambi na bino nyonso mpe na basantu nyonso. Bandeko ya Itali batindeli bino mbote.


Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.


Ndenge moko mpe, bino bilenge, botosaka bakambi na bino ya Lingomba, bolata komikitisa kati na bino, pamba te Makomi elobi : « Nzambe atelemelaka bato ya lolendo, kasi atalisaka ngolu na Ye epai ya bato oyo bamikitisaka. »


Boye, tosengeli kosunga bato ya lolenge oyo mpo ete tosangana na bango na makambo oyo bazali kosala mpo na solo.


Nayebi malamu ete ozali na molende mpe oyokaki pasi makasi mpo na Kombo na Ngai, kasi olembaki te.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ