Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 16:15 - Mokanda na Bomoi

15 Bandeko na ngai, nazali lisusu kopesa bino etinda. Boyebi malamu ete Stefanasi mpe libota na ye bazalaki bato ya liboso ya kobongola mitema kati na Akayi, mpe ete bakomaki kosalela basantu.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 16:15
18 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Wana Galioni azalaki moyangeli ya Akayi, Bayuda bayokanaki mpo na kokanga Polo, mpe bamemaki ye na esambiselo


mpo na oyo etali bosenga ya babulami, bosunganaka mpe boyambanaka malamu kati na bandako na bino.


Nzokande sik’oyo, nazali kokende na Yelusalemi mpo na komemela basantu lisungi.


mpo ete nakangolama na maboko ya bato oyo bandimaka te kati na Yuda, mpe mpo ete basantu ya Yelusalemi bayamba malamu lisungi oyo nakomemela bango.


Nazali kosenga na bino ete boyamba ye kati na Nkolo na lolenge oyo ebongi na basantu mpe bosunga ye na makambo nyonso oyo akosenga bino, pamba te asungaki bato ebele penza, ngai mpe lokola.


Bopesa mpe mbote na Lingomba oyo esanganaka na ndako na bango. Bopesa mbote na Epayineti, molingami na ngai, oyo azalaki moto ya liboso ya kondimela Klisto kati na mokili ya Azia.


Solo, nabatisaki mpe libota ya Stefanasi. Longola bato oyo nawuti kotanga, nayebi te soki nabatisa moto mosusu.


Mpo na makambo oyo etali makabo ya kokongola mpo na basantu, bosalaka, bino mpe, kolanda mitindo oyo napesaki Mangomba ya Galatia.


Nasepeli mingi komona Stefanasi, Fortinatisi mpe Akayikisi ; pamba te esali lokola namoni bino nyonso.


mpe basengaki biso kutu na molende nyonso ete tosalela bango ngolu ya kosangana elongo na biso kati na mosala ya kosunga basantu.


Mpo na ngai, ezali na tina te ya kokomela bino na tina na lisungi ya kopesa na basantu,


kozala mwasi oyo akenda sango mpo na misala na ye ya malamu : abokolaki bana na ye malamu, azalaki koyamba malamu bapaya kati na ndako na ye, kosukola makolo ya basantu, kosunga bato na mawa mpe komipesa na misala nyonso ya malamu.


Ndeko na ngai, bolingo na yo mpo na basantu ezali penza kopesa ngai esengo mingi mpe kolendisa ngai, pamba te okitisaki bango mitema.


Pamba te Nzambe azangi bosembo te mpo ete abosana mosala na bino mpe bolingo nyonso oyo botalisaki mpo na Kombo na Ye, na ndenge bosungaki mpe bozali kokoba kosunga basantu.


Kati na bino, moto nyonso azwaki likabo kowuta na Nzambe ; boye, mpo na bolamu ya baninga, tika ete asalela yango lokola mobateli malamu ya lolenge nyonso ya ngolu ya Nzambe.


Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ