12 Mpo na oyo etali Apolosi, ndeko na biso, nalendisaki ye makasi ete aya kotala bino elongo na bandeko, kasi aboyi kosala yango sik’oyo ; akoya kaka tango akokutana na libaku ya malamu.
Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, Erodiade akutanaki na libaku ya kokokisa mokano na ye. Na mokolo yango, Erode asalaki feti monene mpe abengisaki bakalaka, bakonzi minene ya basoda mpe bato ya lokumu ya Galile.
Kasi, wana Polo akomaki koloba na tina na bosembo, komikanga mpe kosambisama oyo ezali koya, Felikisi ayokaki somo mpe alobaki na ye : — Ekoki mpo na sik’oyo ! Okoki kolongwa. Soki nazwi lisusu tango, nakobengisa yo.
Boni, Apolosi azali nani ? Polo mpe azali nani ? Bazali kaka basali oyo, na nzela na bango, bondimelaki Nzambe, kolanda mosala oyo Nkolo apesaki na moko na moko kati na bango.