Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 16:11 - Mokanda na Bomoi

11 Tika ete moto moko te atala ye lokola eloko ya pamba ! Bopesa ye makoki mpo ete asala mobembo ya malamu kino epai na ngai, pamba te nazali kozela ye elongo na bandeko.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 16:11
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai.


Lingomba esungaki bango mpo na mobembo. Wana bakatisaki Fenisi mpe Samari, bazalaki koloba ndenge nini bato ya bikolo ya bapaya bazalaki kobongola mitema. Sango oyo ezalaki kopesa bandeko nyonso esengo.


Bawumelaki wana mwa tango, mpe bandeko batombelaki bango kimia mpo na bozongi epai ya bato oyo batindaki bango. [


Soki Timote akomi, bosala nyonso ete azala na kimia kati na bino, pamba te asalaka mosala ya Nkolo, lokola ngai.


Tango mosusu, nakovanda mwa mikolo epai na bino to nakolekisa kuna tango ya malili, mpo ete bopesa ngai, bino moko, makoki oyo nasengeli na yango mpo na kokoba mobembo na ngai kino epai nakokende.


mpe mpo ete, longwa epai na bino, nakende na Masedwane, mpe, sima na ngai kowuta na Masedwane, nazonga lisusu epai na bino mpo ete nazwa lisungi ya kokoba mobembo na ngai kino na Yuda.


Boye moto oyo atosaka mitindo yango te atiolaka moto te kasi atiolaka nde Nzambe oyo apesaki bino Molimo Mosantu na Ye.


Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola bolenge na yo, kasi zala ndakisa mpo na bandimi na nzela ya maloba, bizaleli, bolingo, kondima mpe bopeto.


Yango nde makambo oyo osengeli koteya. Lendisa mpe pamela na bokonzi nyonso. Kopesa na moto moko te nzela ya kotiola yo.


Batatolaki na miso ya Lingomba na tina na bolingo na yo. Bongo, okosala lisusu malamu koleka soki osungi bango, na lolenge oyo ekosepelisa Nzambe, mpo ete bakoba mobembo na bango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ