Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 15:55 - Mokanda na Bomoi

55 Oh kufa, wapi elonga na yo ? Oh kufa, wapi nguya na yo ? »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 15:55
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Se ya libumu na yango etonda na banzube, etambolaka lokola ebende oyo ebalolaka mabele.


Kanisa motango ya mikolo ya bomoi na ngai ! Okelaki penza bato mpo na suka oyo ezanga ata tina !


Suka ya moto ezali lokola suka ya nyama : bango mibale basukaka kaka ndenge moko ; ndenge moko akufaka, mosusu mpe akufaka kaka bongo. Bango nyonso bazali kaka na pema moko : moto aleki nyama na eloko te. Nyonso wana ezali kaka pamba.


Ndenge moto moko te azali na bokonzi likolo ya pema ya bomoi na ye mpo ete akanga yango, ndenge mpe moto moko te azali na bokonzi likolo ya mokolo na ye ya kufa. Ndenge moto moko te apemaka na tango ya bitumba, ndenge mpe misala mabe ebikisaka te bato oyo basalaka yango.


Nakokangola bango na bokonzi ya mboka ya bakufi, nakosikola bango na kufa. Oh kufa, wapi nguya na yo ? Oh mboka ya bakufi, wapi nguya na yo ya kobebisa ? Nakoyokela bango mawa te !


Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.


pamba te okosundola ngai te kati na mboka ya bakufi mpe okotika te ete mosantu na Yo apola.


Saulo atunaki : — Nkolo, yo nani ? Mongongo ezongisaki : — Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola.


Nzokande, wuta na tango ya Adamu kino na tango ya Moyize, kufa ezalaki na bokonzi ata epai ya bato oyo basalaki masumu te, na lolenge ya Adamu oyo abukaki mobeko mpe azali elilingi ya moto oyo asengelaki koya.


Nguya ya kufa ezali masumu, mpe nguya ya masumu ezali Mibeko.


Mikila na yango ezalaki na basonge lokola mikila ya bakoto, mpe nguya na yango ya konyokola bato basanza mitano ezalaki kati na mikila na yango.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ