Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




1 Bakolinto 15:51 - Mokanda na Bomoi

51 Boyoka, nazali kotalisa bino mabombami : Biso nyonso, tokokufa te ; kasi biso nyonso, tokobongolama,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




1 Bakolinto 15:51
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Soki nazali na likabo ya kosakola, ya kososola mabombami nyonso mpe ya koyeba makambo nyonso ; mpe soki nazali na kondima oyo ekoki kolongola bangomba, kasi nazangi bolingo, nazali pamba.


mpe bato oyo bakufi kati na Klisto babungi mpo na libela.


Kasi, solo, Klisto asekwaki kati na bakufi : azali Mosekwi ya liboso kati na bakufi.


Sima na yango, amonanaki epai ya bandeko koleka nkama mitano na mbala moko ; mpe mingi kati na bango bazali nanu na bomoi kino na tango oyo, kasi bamosusu basila kokufa.


Te ! Toteyaka nde mabombami ya bwanya ya Nzambe, bwanya oyo ebombama na miso ya bato ya mokili, bwanya oyo Nzambe abongisa mpo na nkembo na biso, liboso ete akela mokili.


Boye, tika ete bato bazwa biso lokola basali ya Klisto mpe lokola bakambi oyo bazwi mokumba ya koyebisa mabombami ya Nzambe.


Nzokande, kati na ndako yango ya kapo, tozali penza komona pasi, wana tozali kozela na posa makasi ete tolata ndako na biso ya Lola,


Solo, wana tozali nanu kati na ndako oyo ya kapo, tozali penza komona pasi mpe konyokwama, pamba te toboyi kobanda nanu na kolongola, kasi tolingi nde kolata mbala moko ndako na biso ya Lola, mpo ete bomoi emela oyo ekufaka.


mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye, mabombami oyo abongisa kati na Klisto kolanda bolamu na Ye,


mpe ayebisaki ngai mabombami na nzela ya emoniseli, ndenge nasili kokomela bino na mwa maloba.


Ezali wana na mabombami minene, kasi ngai nazali koloba na tina na Klisto mpe Lingomba.


Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ