48 Ndenge moto ya mabele azali, ndenge wana mpe bato ya mabele bazali ; mpe ndenge moto ya Lola azali, ndenge wana mpe bato ya Lola bazali.
Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. »
Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ? Moko te !
Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.
Oyo abotami na mosuni azali mosuni, mpe oyo abotami na Molimo azali molimo.