45 Yango wana ekomama : « Moto ya liboso, Adamu, akomaki ekelamu na bomoi, azalaki na bomoi ya bomoto ; » kasi Adamu ya suka akomaki Molimo oyo apesaka bomoi.
Yesu azongiselaki ye : — Soki oyebaki likabo ya Nzambe mpe nani oyo asengi yo mayi, ezali yo nde olingaki kosenga Ye mayi mpo ete omela, mpe Ye alingaki kopesa yo mayi ya bomoi.
kasi moto oyo akomela mayi oyo Ngai nakopesa ye akoyoka lisusu posa ya mayi te : mayi oyo Ngai nakopesa ye ekokoma kati na ye lokola etima ya mayi oyo ekawukaka te mpe etiolaka kino na bomoi ya seko.
Ndenge Tata oyo atindaki Ngai azali etima ya bomoi mpe Ngai nazali na bomoi na nzela na Ye, ndenge wana mpe moto oyo alie nzoto na Ngai akozala na bomoi na nzela na Ngai.
Pamba te soki na nzela ya mabe ya moto moko, kufa ezwaki bokonzi likolo ya moto wana se moko, ndenge nini bato oyo bazwaka bomengo ya ngolu ya Nzambe mpe likabo ya bosembo bazala na bokonzi te kati na bomoi na nzela ya Yesu-Klisto Ye moko !
mpo ete, ndenge lisumu elakisaki bokonzi na yango na nzela ya kufa, ngolu mpe elakisa bokonzi na yango na nzela ya bosembo mpo na komema na bomoi ya seko na nzela ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso.
Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye.
nzokande makila ya Klisto oyo, na nzela ya Molimo ya seko, amikabaki Ye moko epai ya Nzambe lokola mbeka oyo ezangi mbeba, epetolaka mitema na biso na misala oyo ememaka na kufa mpo ete tokoka kosalela Nzambe na bomoi.
Anjelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebale yango ekomaki lokola makila ya mowei ; mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaki kati na ebale monene ekufaki.
Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi.
Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate.
Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele.