41 moyi ezali na kongenga na yango, sanza ezali na kongenga na yango, minzoto mpe ezali na kongenga na yango ; kutu monzoto moko ekeseni na monzoto mosusu na kongenga.
Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu,
Na nzela ya masanzoli ya bana mpe bana mike, otelemisi ndako batonga makasi, mpo na kotelemela bayini na Yo mpe kokanga monoko ya monguna mpe ya moto oyo alingaka kozongisa mabe na mabe.
Sanza ekokoma motane, mpe moyi ekoyoka soni, pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi.