38 Kasi ezali Nzambe nde apesaka yango nzoto oyo Ye moko abongisa, mpe apesaka nkona moko na moko nzoto na yango.
Matiti ebotaka mpo na bibwele, mpe milona ya bato ekolaka mpo ete mabele ebotela bango bilei,
Pamba te ndenge mabele ebimisaka matiti mpe elanga ebimisaka nkona na yango, Nkolo Yawe mpe akoyeisa bosembo elongo na masanzoli liboso ya bikolo nyonso.
Mpe nkona oyo oloni ezali te nzoto oyo nzete ekozala na yango tango ekobima ; kasi ezali mbuma ya pamba, tango mosusu mbuma ya ble to mbuma mosusu.
Bikelamu nyonso ya bomoi ezalaka na lolenge moko te ya nzoto : ezali na bokeseni kati na nzoto ya bato, ya banyama, ya bandeke mpe ya mbisi.
Ezala moto oyo alonaki to moto oyo asopaki mayi, moko te azali na tina ; ezali kaka Nzambe oyo akolisaka nde azali na tina.